Kodjua Bato mpo na Mosala na Nkolo
(Etiami nsika mokolo na 03 03 2024)


Nsango Epai na Bato Nyons’oyo Balingi Mapamboli


Na baye banso balingi mapamboli, Nkolo azali kozwa limpinga ya babongoli mpo na kobongola mateya na Site www.mcreveil.org na moko na minok’oyo etangami na site to lokasa.


Mokano ezali ya kosala ete mateya nyonso ya kokamwa oyo Nkolo apesaka biso ezala na moto nyonso na mokili mobimba. Na yango, soki oyebi malamu moko ya minɔkɔ oyo ezali na site yango, yeba ete okoki kotya yango na mosala ya Nkolo. Azali na mposa ete obongola mateya oyo mpo ete ezala na bato nyonso, na libota nyonso, na mposo nyonso, mpe na kontina nyonso.


Kokakatana té kotia batalanta na yo na mosala na Nkolo mpo na kopalanganisa Nsango na Ye na mokili mobimba. Mpe soki okoki kobongola mateya té, kasi oyebi bat’oyo bakoki, lendisá bango básala yango.


Mpe soki odjali na batalanta ya kotanga mateya ya audio mpe to na video, to na esika mosusu nyons’oyo ekoki kopesa maboko mpo na kokende liboso na mosala na Nkolo, yoka nsɔni té mpo na kokutana na biso.


Makabo na yo ekoyambama malamu. Nkolo azali na mposa na yo mpo na kokende liboso na mosala na Ye. Oyo ezali ntango na komisala ntina mpo na Yesu Klisto Nkolo na yo mpe koyanganisa mapamboli na yo na Lola. Soki olingi kozala eteni na limpinga oyo ya Nkolo, kokakatana té mpo na kokutana na biso na adelesi oyo: mail@mcreveil.org kolakisa na monoko nini olingi kosala


Tika eté Ngolu ejala na baye banso balingaka Nkolo na biso Yesu Klisto na boling’oyo ekoki kobongwana té!

Finá awa mpo na kodjua Buku oyo na PDF