| Yezu azongisi :Nanu botangi Minkanda ya Nzambe té ? Ekóomamá boye : Na ebandeli, tango Nzambe asalaka bato, asalaka bango mobali nŕ mwasi; bongo alobi : Yango wana, mobali atikaka tata na ye ná mama na ye, pe asanganaka nŕ mwasi na ye, po bango mibale bŕkóma moto moko. Boye bazali lisusu bato mibale té, kasi bakómi se moto moko. Bongo bat’oyo Nzambe asangisi, moto ŕkabola bango té. Matai 19:4-6 |
Ba-Farizé bazongisi:Ndenge nini wana? Moize apesakŕ nzela boye: mobali akoki koboya mwasi na ye, kasi liboso ákňma monkanda ya koboma libala. Yezu alobi na bango: Moize apesaki bino nzela ya koboya basi, po boleki mitú makasi. Kasi banda na ebandeli ezalaki bongo té. Nalobi na bino: moto nyons’oyo aboyi mwasi na ye pe abali mwasi mosusu, longola bobele soki mibeko ezali kopekisa ‘tč bábalana té, azali kosala kindumba. Bayekoli na ye balobi: Soki makambo ya mwasi nŕ mobali ezali boye, ebongi malamu moto ábala té. Yezu azongiseli bango: Bato nyonso bakoki kondima mateya oyo té; kaka baoyo Nzambe apesi nguya ya kondima yango. Matai 19:7-11 |